Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki nazali kozwa te na eteyelo?

Nasala nini soki nazali kozwa te na eteyelo?

 “Namonaka baninga na ngai mosusu ya kelasi bayaka na kelasi na bakaye te, mpe bayokaka miziki ntango molakisi azali kotángisa. Na nsima, bana-kelasi yango bakamwaka mpo na nini bazwi te! Ezali na bana-kelasi mosusu lokola ngai oyo tosalaka makasi, tomipesaka mpenza na koyekola, kasi na nsuka tozwaka bapwɛ moke na ekzamɛ. Nayebaka mpenza te mpo na nini esalemaka bongo. Esalaka mpenza mabe nsima ya kolekisa bapɔsɔ kolala na retare mpo na koyekola, mpe na nsuka ozwa te na ekzamɛ.”​—Yolanda.

 Yo mpe omiyokaka lokola Yolanda? Ntembe ezali te ete esalaka mpasi kozwa bapwɛ moke to kolandisa yango mbala na mbala.

 Bilenge mosusu oyo bazwaka bapwɛ moke na eteyelo basalaka lisusu milende te mpo na kozwa bapwɛ mingi. Basusu kutu bakataka kelasi. Ata soki makanisi yango mibale ekoki komonana malamu, ezali na solisyo mosusu oyo ekoki kosalisa mpo na kolonga mokakatano yango. Tótalela makambo 6 oyo ekoki kosalisa yo mpo ozwaka na eteyelo.

 Oyo okoki kosala

  •   Kokimaka kelasi te. Ekoki kokóma ete moto akima kelasi, kasi soki yango ekómi momeseno, ekoki kosala ete moto azwa bapwɛ mingi te na kelasi.

     “Na eteyelo na biso, bana oyo bazalaki kokima kelasi bazalaki mbala mingi kokipe te bapwɛ oyo bazalaki kozwa na kelasi. Ezalaki lokola bazalaki komiboma bango moko.”​—Matthew.

     Toli ya Biblia: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

  •   Zwáká bapwɛ na mateya nyonso. Kozala na kelasi ntango bazali kotángisa ezali malamu, kasi esuki kaka wana te. Osengeli mpe kosala makasi okanga ntina ya makambo oyo bazali kotángisa. Komáká makambo oyo bakomi na tablo. Landáká malamu makambo oyo molakisi azali kotángisa. Soki molakisi apesi yo nzela ya kotuna mituna, tuná mituna yango ntango azali kotángisa.

     “Natunaka mituna mingi ntango molakisi azali kotángisa mpo namonaka ete molakisi alimbolaka liteya moko malamu soki amoni ete mwana moko ya kelasi akangi ntina na yango te.”​—Olivia.

     Toli ya Biblia: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.”​—Luka 8:18.

  •   Boyá koyiba biyano na ekzamɛ. Koyiba biyano ezali kozanga bosembo. Ezali na lolenge mingi oyo moto akoki koyiba biyano na eteyelo. Moko na yango ezali ya kokoma biyano oyo baninga batye. Yango ezali kaka te kozanga bosembo kasi yango ekobakisela yo eloko te na boyebi na yo.

     “Soki okangi ntina ya eloko te, kokoma te biyano ya baninga ya kelasi na ntango ya ekzamɛ. Soki ozali koyiba biyano, ozali komisala mabe. Na esika oyekola ndenge ya kozwa solisyo yo moko, okómi kotika ete basusu bázwela yo solisyo.”​—Jonathan.

     Toli ya Biblia: “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye mɔkɔ, boye akoki komikumisa mpɔ na mosala na ye mɔkɔ.”​—Bagalatia 6:4, Biblia haut fleuve

  •   Saláká badevuare liboso ya kosala makambo mosusu. Soki likoki ezali, saláká badevuare liboso ya kosala makambo mosusu, mingimingi liboso ya kominanola. a Soki osilisi kosala badevuare na yo, okomona ete okokóma na ntango mingi ya kominanola mpe ya kosala makambo mosusu!

     “Nazalaki kotya badevuare na esika ya liboso, yango esalisaki ngai nazwaka bapwɛ mingi. Mbala mingi soki nazongi na ndako, nazalaki na mposa ya kopema to koyoka miziki. Kasi nazalaki kosala makasi nasilisa naino badevuare na ngai mpe na nsima nazalaki kopema.”​—Calvin.

     Toli ya Biblia: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

  •   Lukáká lisalisi. Koyoka nsɔni te mpo na kondima lisalisi ya basusu. Sɛngáká toli epai ya baboti na yo. Sɛngá molakisi na yo lisalisi mpo ozwaka bapwɛ mingi. Na bantango mosusu, ekosɛnga oluka moto moko ayaka kotángisa yo na ndako.

     “Kende mbala moko kokutana na molakisi mpo asalisa yo okanga ntina ya liteya moko mpo ozwa bapwɛ mingi. Kozanga ntembe molakisi akomona ete ozali na mposa ya koyeba makambo mpe kozwa bapwɛ ya malamu mpe akosalisa yo mpo na yango.”​—David.

     Toli ya Biblia: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”​—Masese 15:22.

  •   Salelá mabaku nyonso oyo epesameli yo. Na bikólo mosusu, batunaka bana-kelasi mwa mituna ya pɛtɛɛ mpo bázwa bapwɛ mingi. Okoki mpe kondima kosala devuare moko to makambo mosusu oyo ekoki kopesa yo bapwɛ mingi. Soki osalaki te devuare moko boye, okoki kosala yango soki osɛngi kosala yango lisusu.

    Kosala makasi mpo na kozwa bapwɛ ya malamu ezali lokola koyekola kobɛta miziki. Ezalaka mpasi, kasi mbano oyo emonanaka ezalaka na valɛrɛ

     “Soki nalingi kozwa bapwɛ mingi na liteya moko, nasengeli kosala makasi. Natunaka molakisi na ngai soki ezali na devuare mosusu ya kosala oyo nakoki kosala to kobandela oyo nasali malamu te mpo nazwa bapwɛ ya malamu.”​—Mackenzie.

     Toli ya Biblia: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.”​—Masese 14:23.

a Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na kokolisa makoki na yo ya koyekola, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nasala nini mpo nasilisaka badevuare na ngai?