Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kopona moto oyo azali ndakisa malamu ya komekola?

Ndenge nini nakoki kopona moto oyo azali ndakisa malamu ya komekola?

 “Ntango nakutanaki na mikakatano na kelasi, kokanisa moto moko oyo nasepelaka na ye, oyo akutanaki mpe na mikakatano lokola oyo ya ngai, esalisaki ngai mpenza. Na nsima namekaki kosala ndenge ye asalaki. Kozala na moto ya komekola esalaki ete nalonga mikakatano na pɛtɛɛ nyonso.”​—Haley.

 Kozala na moto ya komekola ekoki kosalisa yo okima mikakatano mpe okokisa mikano na yo. Sekele ezali nde kopona moto oyo azali ndakisa malamu mpo na komekola.

 Mpo na nini kopona malamumalamu?

  •   Moto oyo okopona mpo na komekola ye akoki kobongisa to kobebisa bizaleli na yo.

     Biblia eyebisi bakristo bátala baoyo bazali ndakisa malamu; elobi boye: “Awa bozali kotala malamu mpenza mbuma malamu ya etamboli na bango bómekola kondima na bango.”​—Baebre 13:7.

     Toli: Lokola moto oyo okopona mpo na komekola ndakisa na ye akoki kosala ete okóma na bizaleli ya malamu to ya mabe, poná baoyo bazali mpenza na bizaleli malamu, kaka te baoyo bayebani mingi to bazali mwa moke na mbula lokola yo.

     “Ndakisa ya ndeko moko na nkombo Adam eteyaki ngai mingi; ezala na ndenge na ye ya kotalela makambo mpe bomoto na ye. Ekamwisaka ngai mpenza ndenge nabosanaka te makambo ya sikisiki oyo alobaki mpe asalaki. Soki ayebaka kutu ndenge bomoto na ye esalisaki ngai!”​—Colin.

  •   Moto oyo okopona mpo na komekola ye akobongola ndenge na yo ya kokanisa mpe mayoki na yo.

     Biblia elobi: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:33.

     Toli: Poná moto oyo azali na bizaleli malamu, kasi te moto oyo azali komonana kitoko na libándá. Soki te, okolɛmba nzoto.

     “Okobanda komiyoka ntina te mpe mabe soki ozali komikokanisa ntango nyonso na bato ya kitoko mpenza. Ekoki kotinda yo omitungisaka mingi mpo na ndenge nzoto na yo ezali.”​—Tamara.

     Kanisá naino: Mpo na nini ekoki kozala motambo kopona bavedɛti mpe bato ya masano mpo na komekola?

  •   Bato oyo okopona mpo na komekola bakoki kosala ete okokisa mikano na yo to okokisa yango te.

     Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

     Toli: Poná bato oyo bazali na bizaleli malamu oyo okolinga komekola. Wana ozali kotala bomoto na bango, okoyeba makambo ya sikisiki oyo osengeli kosala mpo na kokokisa mokano na yo.

     “Na esika omityela mokano ya bongobongo, na ndakisa ‘nazali na mposa ya kokokisa mikumba na ngai malamu lisusu,’ okoki koloba, ‘nazali na mposa ya kokokisa mikumba na ngai malamu lisusu lokola Jane. Atosaka ngonga mpe azwaka mikumba na ye na lisɛki te.’”​—Miriam.

     Na mokuse: Soki oponi moto oyo azali ndakisa malamu ya komekola, okokóma lolenge ya moto oyo olingi kokóma.

Komekola ndakisa malamu ya moto moko ekoki kozala nzela mokuse mpo na kokokisa mikano na yo!

 Ndenge ya kopona

 Okoki kopona moto yango na likambo moko to mibale.

  1.   Okoki kopona ezaleli oyo olingi kokóma na yango mpe na nsima koluka moto moko oyo osepelaka na ye, oyo azali na ezaleli yango.

  2.   Okoki kopona moto moko oyo osepelaka na ye mpe na nsima kopona ezaleli na ye moko oyo okolinga kokóma na yango.

 Lokasa oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa yo osala bongo.

 Bato ya komekola bakoki kozala:

  •  Bilenge mosusu. “Nalingaka kozala lokola moninga na ngai ya motema. Azangaka ntango te mpo na kotyela basusu likebi. Ngai nazali mokóló na ye kasi namonaka ete azali na bizaleli malamu mpenza oyo ngai nazali na yango te mpe epesaka ngai mposa ya namekola ye.”​—Miriam.

  •  Mikóló. Ekoki kozala baboti na yo to bandimi ya lingomba na yo. “Baboti na ngai nyonso mibale bazali mpenza bato oyo nasengeli komekola. Bazali na bizaleli malamu mpenza. Namonaka mpe mabunga na bango, kasi ata bongo, namonaka mpe ete bazali kaka sembo. Ntango nakokóma na mbula na bango, nakanisi ete bakolobela ngai mpe bongo.”​—Annette.

  •  Bato oyo Biblia elobeli. “Naponaki na Biblia bato ndenge na ndenge ya komekola​—Timote, Ruta, Yobo, Petro, mwana mwasi Moyisraele wana ya moke—​mokomoko na bango mpo na ntina ekeseni. Soki nazali kokoba koyekola bato oyo Biblia elobeli, bakómaka lisusu bato ya solo na miso na ngai. Nasepelaki mingi na masolo nayekolaki na buku Mekolá kondima na bango, ata mpe oyo ezali na ‘Index ya bandakisa ya kolanda’ na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, volimi 1 mpe 2.”​—Melinda.

 Toli: Kopona kaka moto moko te lokola moto ya komekola. Ntoma Paulo alobaki na bandeko na ye bakristo boye: “Bótalaka baoyo bazali kotambola na ndenge oyo eyokani na ndakisa oyo bozwi epai na biso.”​—Bafilipi 3:17.

 Oyebaki yango? Okoki kozala ndakisa oyo basusu bakoki komekola! Biblia elobi: “Zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto.”​—1 Timote 4:12.

 “Ata soki ekosɛnga obongisa bizaleli na yo mosusu, okoki kaka kosalisa basusu bábongisa mpe oyo ya bango. Oyebi te nani azali kotala mpe ndenge oyo maloba na yo ekoki kobongola bomoi ya moto moko.”​—Kiana.