Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe?

Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe?

 “Kolula baninga na ngai mibali ezali moko ya mikakatano ya makasi mpenza oyo nazalaki na yango ntango nazali kokola. Nazalaki kokanisa ete ekoleka na yango, kasi tii lelo etungisaka ngai.”​—David, azali na mbula 23.

 David azali mokristo mpe alingaka kosepelisa Nzambe. Lokola alulaka baninga na ye mibali, akosepelisa mpenza Nzambe? Nzambe ayokaka ndenge nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?

 Biblia elobi nini?

 Ndenge oyo bato batalelaka likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ekoki kotalela mimeseno ya bato to eleko. Kasi bakristo balandaka te makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango to ‘bamemamaka te epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.’ (Baefese 4:14) Kutu, balandaka nde oyo Biblia elobi na likambo yango (mpe na ezaleli mosusu nyonso etali yango).

 Likanisi ya Biblia ezali polele na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Elobi boye:

  •  “Osengeli te kolala na mobali ndenge olalaka na mwasi.”​—Balevi 18:22.

  •  “Nzambe atiki bango bálanda bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni, mpo basi na bango batiki ndenge oyo esengeli kosangisa nzoto, bakómi kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te.”​—Baroma 1:26.

  •  “Bómikosa te. Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakorinti 6:9, 10.

 Kutu, mibeko ya Nzambe etali moto nyonso, ezala baoyo bazalaka na mposa ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi to mpe mposa ya kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali. Yango wana moto nyonso asengeli kozala na komipekisa soki ayoki mposa ya kosala likambo moko oyo Nzambe alingaka te.​—Bakolose 3:5.

 Yango elingi koloba ete . . . ?

 Yango elingi nde koloba ete Biblia etindaka bato báyina baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi?

 Te. Biblia etindaka biso te tóyina bato, ata soki basangisaka nzoto mibali na mibali to te. Kutu, eyebisi biso nde ‘tólanda kozala na kimya na bato nyonso,’ ata soki bazali na bomoi ya lolenge nini? (Baebre 12:14) Yango wana ezali mabe kotungisa, koyina to kosala bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi likambo moko ya mabe.

 Yango elingi nde koloba ete bakristo basengeli kotɛmɛla mibeko oyo endimi libala ya mibali na mibali to basi na basi?

 Biblia emonisi ete likanisi ya Nzambe mpo na libala ezali ete mwasi moko, mobali moko. (Matai 19:4-6) Kasi kolobela mibeko etali libala ya mibali na mibali to basi na basi ezali likambo ya politiki, ya Nzambe te. Biblia epekisi bakristo bákɔta na makambo ya politiki. (Yoane 18:36) Yango wana, bakotɛlaka te mpe batɛmɛlaka te mibeko ya Leta na likambo etali libala ya bongo to mpe ezaleli mosusu ya ndenge wana.

 Bongo soki . . . ?

 Bongo soki moto asangisaka nzoto na baninga na ye mibali to basi? Akoki mpe kobongwana?

 Ɛɛ. Kutu, na siɛklɛ ya liboso basusu basalaki bongo! Nsima ya koloba ete baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te, Biblia ebakisi: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.”​—1 Bakorinti 6:11.

 Elingi nde koloba ete baoyo batikaki kosangisa nzoto ndenge wana mposa yango ezalaki koyela bango lisusu te? Te. Biblia elobi: “Bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika.” (Bakolose 3:10) Kobongwana esalemaka mokemoke.

 Bongo soki moto oyo alingi kotosa mibeko ya Nzambe ayokaka kaka mposa ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?

 Kaka ndenge ezalaka na mposa nyonso, moto akoki koboya to kokokisa mposa yango. Na ndenge? Biblia elobi: “Bókoba kotambola na elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto.”​—Bagalatia 5:16.

 Simbá ete vɛrsɛ elobi te ete moto akoyoka lisusu te mposa ya nzoto. Kasi, soki azali na programɛ malamu ya koyekola Biblia mpe abondelaka, akozala na makasi ya kobengana bamposa yango.

 David, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo amonaki ete ezali bongo, mingimingi nsima ya kosolola likambo yango na baboti na ye oyo bazali bakristo. Alobi boye: “Ezalaki lokola kilo elongwe na mapeka na ngai mpe nakokaki kolekisa bolenge na ngai malamu soki nayebisaka bango yango noki.”

 Na nsuka, toyokaka esengo soki totosi mibeko ya Yehova. Tondimisamaka ete mibeko yango “ezali alima, esepelisaka motema mpe kobatela yango ezali na litomba monene.”​—Nzembo 19:8, 11