Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mituna oyo bilenge batunaka

Ndenge nini nakoki koteya lisosoli na ngai?

Ndenge nini nakoki koteya lisosoli na ngai?

 Lisosoli na yo ekoki kozala lokola nini?

  •   busole

  •   talatala

  •   moninga

  •   mosambisi

 Nyonso minei ezali biyano ya malamu. Lisolo oyo ekolimbola ntina oyo tolobi bongo.

 Lisosoli ezali nini?

 Lisosoli ezali lokola mongongo ya kati oyo eyebisaka biso soki likambo moko ezali malamu to mabe. Biblia elobi ete ezali lokola ‘mibeko oyo ekomamá na mitema ya bato.’ (Baroma 2:15) Lisosoli ya pɛto ekosalisa yo oyeba kotalela malamu likambo moko oyo olingi kosala to nsima ya kosala yango.

  •   Lisosoli na yo ezali lokola busole. Etambwisaka yo na banzela ya malamu mpo okima makama na bomoi.

  •   Lisosoli na yo ezali lokola talatala. Emonisaka bizaleli oyo ozali na yango, lolenge ya moto oyo ozali mpenza na kati.

  •   Lisosoli na yo ezali lokola moninga ya malamu. Ekoki kopesa yo toli ya malamu mpe kosalisa yo olonga​—soki oyokeli yango.

  •   Lisosoli na yo ezali lokola mosambisi. Esambisaka yo ntango osali likambo moko ya mabe.

Lisosoli ya malamu ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu

 Na mokuse: Lisosoli na yo ezali esaleli ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa yo (1) ozwaka bikateli ya malamu mpe (2) oyoka mawa na makambo ya mabe oyo osali mpo obongisa makambo yango.

 Mpo na nini osengeli koteya lisosoli na yo?

 Biblia eyebisi biso ‘tózala na lisosoli ya malamu.’ (1 Petro 3:16) Yango ezalaka mpasi kosala yango soki lisosoli na biso eteyami te.

 “Nazalaki kokosa baboti na ngai mpo báyeba te esika oyo nazalaki kokende. Na ebandeli, lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai, kasi kendekende ezalaki lisusu kotungisa ngai te.”​—Jennifer.

 Nsukansuka, lisosoli ya Jennifer etindaki ye ayebisa baboti na ye makambo nyonso mpe atika kokosa bango.

 Kanisá naino: Lisosoli ya Jennifer ekokaki liboso kokebisa ye, boye te?

 “Ezalaka mpasi mpe mitungisi kozala na bomoi na nse ya lokasa. Ntango lisosoli na yo etindi yo ozwa ekateli moko ya mabe, ekokóma pɛtɛɛ ozwa bikateli mosusu ya mabe na mbala nsima.”​—Matthew.

 Mbala mingi bato mingi bakipaka lisosoli na bango te. Biblia elobi ete “babungisá bizaleli nyonso ya malamu.” (Baefese 4:19) Biblia ya lingala ya lelo oyo ebongoli yango boye: “Bakanisaka makambo ya malonga té.”

 Kanisá naino: Bato oyo bayokaka mawa te nsima ya kosala likambo moko ya mabe, bazalaka mpenza na bomoi ya malamu? Bálinga to bálinga te, makambo nini bakotuna na yango?

 Na mokuse: Mpo obatela lisosoli ya malamu, osengeli kosalela ‘makoki na yo ya kososola mpo emesana kokesenisa ná mabe ná malamu.’​—Baebre 5:14.

 Ndenge nini okoki koteya lisosoli na yo?

 Mpo oteya lisosoli na yo, osengeli kozala na mibeko oyo ekosalisa yo okokanisa yango na makambo oyo osalaka. Bato mosusu batosaka mibeko oyo etyami na:

  •   libota mpe mimeseno ya mboka

  •   bilenge ya mbula na bango

  •   bato oyo bayebani mingi

 Kasi, mibeko oyo ezali na Biblia eleki mosika mibeko oyo bato batyá. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpo Biblia “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe,” Moto oyo akelaki biso mpe ayebi oyo eleki malamu mpo na biso.​—2 Timote 3:16.

 Tótalela mwa bandakisa ya mibeko ya Biblia.

 MOBEKO: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

  •   Mobeko oyo ekosala nini na lisosoli na yo soki olingi koyiba biyano na ekzamɛ, kokosa baboti na yo, to koyiba?

  •   Soki lisosoli na yo ezali kotinda yo ozala sembo na makambo nyonso, yango ekomemela yo bolamu nini sikoyo mpe na mikolo ezali koya?

 MOBEKO: “Bókima pite.”​—1 Bakorinti 6:18.

  •    Mobeko oyo ekosala nini na lisosoli na yo soki olingi kotala pornografi to kosangisa nzoto liboso ya libala?

  •   Soki lisosoli na yo ezali kotinda yo okima pite, yango ekomemela yo bolamu nini sikoyo mpe na mikolo ezali koya?

 MOBEKO: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.”​—Baefese 4:32.

  •    Mobeko oyo ekosala nini na lisosoli na yo ntango matata ebimi kati na yo ná ndeko na yo to moninga na yo moko?

  •   Soki lisosoli na yo ezali kotinda yo ozala na boboto mpe oyokela basusu mawa, yango ekomemela yo bolamu nini sikoyo mpe na mikolo ezali koya?

 MOBEKO: ‘Yehova . . . ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’​—Nzembo 11:5.

  •    Mobeko oyo esengeli kosala nini na lisosoli na yo ntango olingi kopona bafilme, baemisyo ya TV, mpe masano ya bavideo?

  •   Soki lisosoli na yo ezali kotinda yo oboya masano ya mobulu, yango ekomemela yo bolamu nini sikoyo mpe na mikolo ezali koya?

 LIKAMBO OYO ESALEMÁ: “Nazalaki na baninga oyo bazalaki kobɛta masano ya video ya mobulu mpenza, ngai mpe nazalaki kobɛta yango. Na nsima papa na ngai ayebisaki ngai nabɛtaka yango lisusu te. Na yango, nazalaki kobɛta yango soki nakei kotala baninga na ngai. Ntango nazalaki kozonga na ndako, nazalaki koyebisa baboti eloko te. Papa atunaki soki nini ezalaki kotungisa ngai, mpe nazalaki koloba nazali na ngai malamu. Kasi, mokolo moko, natángaki mokanda ya Nzembo 11:5 mpe nabandaki koyoka mabe mpo na makambo oyo nazalaki kosala. Nayaki komona ete nasengelaki kotika kobɛta masano wana ya video. Mpe natikaki yango mbala moko. Ntango moninga moko amonaki natikaki kobɛta, ye mpe atikaki kobɛta.”​—Jeremy.

 Kanisá naino: Ntango nini lisosoli ya Jeremy ekómaki kosala, mpe ntango nini akómaki koyokela lisosoli na ye? Ozwi liteya nini na lisolo ya Jeremy?

 Na mokuse: Lisosoli na yo emonisaka bomoto na yo ya kati mpe bizaleli oyo ozali na yango. Lisosoli na yo emonisaka ete ozali moto ya ndenge nini?