Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI B

Osengeli kokata lisolo?

Osengeli kokata lisolo?

Soki moto moko abimisi likanisi oyo eyokani te na oyo ya biso to mpe soki atuni motuna moko ya ntina mingi, tozalaka na esengo ya kokoba lisolo elongo na ye. Tolingaka kosolola na bato oyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’—Mis. 13:48.

Kasi tokosala nini soki moto moko asiliki, alingi kobimisa ntembe, to mpe azali na mposa ya kosolola na biso na ntango wana te? Na boboto nyonso mpe na mayele, katá lisolo na moto yango. (Mas. 17:14) Salá nyonso ozala na boboto mpe na limemya mpo moto yango andima kosolola na biso na mbala ya nsima.—1 Pe. 2:12.