Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI C

Ndenge ya koyekola Biblia na moto na lisalisi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

Ndenge ya koyekola Biblia na moto na lisalisi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

Bandeko babondelaki mingi mpe basalaki bolukiluki ya mozindo liboso ya kobimisa buku Sepelá na bomoi libela na libela! Mpo na kozwa matomba na buku yango, salelá makanisi oyo elandi ntango ozali koyekola na moto Biblia.

Liboso ya kobanda boyekoli

  1. 1. Omibongisa malamu. Wana ozali komibongisa, kanisá mposa, makambo ya bomoi, mpe bindimeli ya moyekoli na yo. Kanisá makambo oyo ekoki kozala mpasi akanga ntina mpe asalela yango. Luká koyeba ndenge makambo oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ekoki kosalisa moyekoli na yo, mpe omibongisa mpo na kosalela yango soki esengeli na ntango ya boyekoli.

Ntango bozali koyekola

  1. 2. Soki moto yango andimi, bóbanda mpe bósukisa boyekoli na libondeli.

  2. 3. Kolobaka mingi te. Kangamá kaka na liteya oyo bozali koyekola, tikelá moyekoli nzela alobaka.

  3. 4. Ntango bobandi eteni moko ya sika, tángá mokano ya eteni yango mpe lobelá mwa mitó ya makambo oyo bokotalela.

  4. 5. Ntango bosilisi eteni moko, salá bozongeli mpo na kosalisa moyekoli abosana te mateya oyo ayekoli.

  5. 6. Ntango bozali koyekola liteya mokomoko:

    1. Bótánga baparagrafe.

    2. Bótánga bavɛrsɛ nyonso oyo bakomi “Tángá.”

    3. Soki esengeli, bótánga bavɛrsɛ mosusu oyo etyami.

    4. Bótala bavideo nyonso oyo bakomi “Talá” (soki ozali na yango).

    5. Tuná moyekoli motuna mokomoko.

    6. Sɛngá ye atala bililingi oyo ezali na eteni “Kɔtá na mozindo”, mpe alobela yango.

    7. Salelá etanda “Oyo okoki kosala” mpo na kosalisa ye akoba kokola na elimo. Okoki kolendisa ye asalela likanisi oyo bapesi na etanda yango, to amityela mikano mosusu, to mpe asalela yango nyonso mibale.

    8. Tuná ye soki asepelaki na lisolo to mpe na video moko oyo ezali na etanda “Makanisi mosusu” ntango azalaki kobongisa lisolo.

    9. Bósala makasi bosilisaka liteya mokomoko na mokolo moko.

Nsima ya boyekoli

  1. 7. Kobá kokanisa moyekoli na yo. Sɛngá Yehova apambola bokoli oyo moyekoli yango azali kosala mpe apesa yo bwanya mpo oyeba ndenge ya kosalisa ye.