Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 5

Lobá na mayele

Lobá na mayele

Etinda: “Maloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.”—Kol. 4:6.

Oyo Paulo asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 17:​22, 23. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Paulo amiyokaki ndenge nini mpo na misala ya mangomba ya lokuta oyo amonaki na engumba Atene?—Talá Misala 17:16.

  2.   Na esika apamela bato ya Atene, ndenge nini Paulo asalelaki na mayele bindimeli na bango mpo na kosakwela bango nsango malamu?

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Mbala mingi bato bandimaka koyoka biso soki toponi na mayele makambo ya koyebisa bango, ndenge ya koloba yango mpe ntango ya koloba yango.

Mekolá Paulo

3. Poná maloba ya malamu. Na ndakisa, ntango ozali kosolola na moto oyo ayebi makambo ya bakristo te, ekoki kosɛnga ete osalela maloba mosusu mpo na kolobela Biblia to mpe Yesu.

4. Kozala motema mɔtɔmɔtɔ te mpo na kosembola moto. Tiká ye abimisa oyo ye ayebi. Soki alobi likambo moko oyo eyokani te na mateya ya Biblia, koluka kobendana na ye te. (Yak. 1:19) Koyoka moto na likebi ekosalisa yo oyeba makambo oyo andimaka mpe ntina oyo andimaka yango.—Mas. 20:5.

5. Ndimá makanisi na ye oyo ebongi mpe pesá ye longonya. Mbala mosusu moto yango andimaka na motema mobimba ete lingomba na ye eteyaka solo. Luká kolobela libosoliboso makambo oyo bino mibale bozali kondima, mpe na nsima, salisá ye mokemoke ayeba oyo Biblia eteyaka.