Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 3

Boboto

Boboto

Etinda: “Bolingo ezali . . . na boboto.”—1 Ko. 13:4.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 9:​1-7. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Likambo nini Yesu asalaki liboso: abikisaki moto yango to asakwelaki ye naino nsango malamu? —Talá Yoane 9:​35-38.

  2.   Okanisi nini: mpo na nini likambo oyo Yesu asalaki etindaki moto yango andima koyoka nsango malamu?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Moto akoki kondima na pɛtɛɛ nyonso koyoka nsango oyo tomemeli ye soki amoni ete tozali komitya na esika na ye.

Mekolá Yesu

3. Omityaka na esika ya bato. Meká kokanisa ndenge azali komiyoka.

  1.    Omituna boye: ‘Likambo nini ezali kotungisa ye? Likambo nini ekoki kosalisa ye to mpe kosepelisa ye?’ Kosala bongo ekosalisa yo omonisela moto yango boboto na ndenge ebongi mpe na ndenge ya solo.

  2.   Yoká moto yango malamu mpo na komonisa ete ozali kotyela ye likebi. Soki ayebisi yo ndenge azali komiyoka mpo na likambo moko to mpe alobeli mokakatano moko oyo azali kokutana na yango, koluka te kobongola lisolo.

4. Lobá na boboto mpe na limemya. Soki omitye na esika ya moto yango mpe olingi mpenza kosalisa ye, yango ekomonana na ndenge na yo ya koloba. Poná na likebi makambo oyo okoloba mpe lobá na mongongo ya malamu. Koloba te makambo oyo ekoki kozokisa ye.

5. Zalá pene ya kosalisa. Luká mabaku ya malamu mpenza mpo na kosalisa moto yango na makambo ya sikisiki. Soki tomoniseli moto boboto, yango ekoki kotinda ye andima kosolola na biso.