Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOLANDELA BOKOLI

LITEYA 7

Kotika te

Kotika te

Etinda: “Bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu.”—Mis. 5:42.

Oyo Paulo asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 19:​8-10. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Na esika atika kosakola ntango bato mosusu batɛmɛlaki ye, ndenge nini Paulo akobaki kosalisa baoyo basepelaki koyoka ye?

  2.   Mbala boni Paulo azongaki mpo na koteya baoyo basepelaki, mpe asalaki yango na boumeli ya ntango boni?

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Tosengeli kozwaka ntango mpe kosala milende mpo na kozongela bato mpe kobanda koyekola na bango Biblia.

Mekolá Paulo

3. Tyá programɛ oyo ebongi mpo na moto oyo okokende kotala. Omituna boye: ‘Ntango nini mpe esika nini ekosimba mpo nakutana na ye? Ntango nini mpe esika nini akondima tósolola?’ Ndimá kokende kotala ye ata soki ngonga na ye eyokani te na oyo ya yo.

4. Sɛngá moto yango ayebisa yo mokolo oyo bokoki kosolola lisusu. Na nsuka ya lisolo nyonso, bóyokana ngonga oyo bokoki kosolola lisusu. Salá makasi otosa mokolo mpe ngonga oyo boyokani.

5. Zalá na elikya. Koloba mbala moko te ete moto oyo okutaka te mbala mingi na ndako to mpe oyo azalaka na makambo mingi ya kosala, azali kosepela te. (1 Ko. 13:​4, 7) Salá oyo okoki mpo na kokutana na moto yango, kasi salelá ntango na yo na mayele.—1 Ko. 9:26.