Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 6

Mpiko

Mpiko

Etinda: “Nzambe na biso apesaki biso mpiko mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe.”—1 Tes. 2:2.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Luka 19:​1-7. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Nini ekokaki kosala ete bato mosusu báboya Zakai?

  2.   Atako bongo, nini etindaki Yesu ateya ye nsango malamu?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Tosengeli kozala na mpiko mpo na kosakwela bato ya ndenge nyonso nsango ya Bokonzi.

Mekolá Yesu

3. Tyelá Yehova motema. Elimo ya Nzambe epesaki Yesu nguya ya kosakola, ekoki mpe kosala bongo mpo na yo. (Mat. 10:​19, 20; Luka 4:18) Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo ozali kobanga.—Mis. 4:29.

4. Kokanisela bato mabe te. Tokoki kobanga kosolola na bato mosusu kaka mpo na ndenge oyo bazali komonana, mpo bazali bazwi to babola, lolenge ya bomoi na bango, to mpe mpo na mateya ya lingomba na bango. Kasi kobosana likambo oyo te:

  1.    Yehova ná Yesu bakoki kotánga mitema; kasi biso te.

  2.   Yehova akoki kosimba motema ya moto nyonso.

5. Zalá na mpiko ná limemya, kasi zalá mpe ekɛngɛ. (Mat. 10:16) Kowelana na moto maloba te. Na limemya nyonso, katá lisolo na moto soki omoni ete azali kosepela te na nsango malamu mpe soki omoni ete ozali na likama.—Mas. 17:14.