Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOLANDELA BOKOLI

LITEYA 9

Komitya na esika ya basusu

Komitya na esika ya basusu

Etinda: “Bósepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela; bólelaka elongo na bato oyo bazali kolela.”—Rom. 12:15.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Marko 6:​30-34. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Mpo na nini Yesu ná bantoma na ye balingaki ‘kozala kaka bango moko’?

  2.   Nini etindaki Yesu ateya ebele wana ya bato?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Soki tomitye na esika ya basusu, tokoteya bango kaka te kasi tokosalisa mpe bango.

Mekolá Yesu

3. Yokáká na likebi. Tikelá moto nzela abimisa makambo oyo ezali na motema na ye. Kokata ye maloba te mpe tyá likebi na mayoki na ye, makambo oyo ezali kotungisa ye, to mpe bantembe oyo azali na yango. Soki ozali koyoka ye na likebi, yango ekomonisa ete ozali komitya na esika na ye.

4. Kanisá moto oyo asepelaki na lisolo. Kanisá masolo oyo osololaki na moto yango mpe omituna boye:

  1.    ‘Mpo na nini ezali na ntina ayoka mateya ya solo?’

  2.   ‘Ndenge nini koyekola Biblia ekobongisa bomoi na ye ya lelo mpe ekosalisa ye azala na bomoi ya malamu koleka na mikolo ezali koya?’

5. Lobelá makambo oyo ekoki kosalisa ye. Kozanga koumela, lakisá ye ndenge boyekoli ya Biblia ekoki koyanola na mituna na ye mpe ndenge ekoki kosalisa ye na makambo ya sikisiki.