Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko ya bolingo:

Kolinga Nzambe mpe kolinga bato etindaka biso ‘tókende mpe tókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, tóbatisa bango.’ (Mat. 28:​19, 20; Mrk. 12:​28-31) Bolingo oyo ezangi moimi ezalaka na nguya. Ekoki kosimba mitema ya baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”—Mis. 13:48.

Na kala, tozalaki kaka koluka kokanga maloba ya kobanda lisolo na motó mpe kotikela bato mikanda. Sikoyo tokómá nde kosala makasi tókolisa makoki na biso ya kobanda masolo na bato. Tokomonisa ete tolingaka bato soki tozali kosolola na bango makambo oyo ekosepelisa bango. Yango elakisi koyeba kobongola masolo soki esengeli mpe kotalela na mozindo mposa ya moto mokomoko mpe makambo oyo asepelaka na yango. Ndenge nini mwa buku oyo ekosalisa biso tókokisa mokano yango?

Mwa buku oyo ezali na mateya 12 oyo ekolobela bizaleli oyo tosengeli kokolisa mpo tómonisa bolingo mpe tókómisa bato bayekoli. Liteya mokomoko esimbami na lisolo moko ya Biblia epai Yesu to mpe mopalanganisi ya nsango malamu moko ya siɛklɛ ya liboso amonisaki ezaleli moko ya sikisiki na mosala ya kosakola. Mokano na biso ezali te ya kokanga na motó ndenge ya kobanda masolo, kasi nde ya koluka ndenge ya komonisela bato bolingo. Atako mokomoko ya bizaleli yango ezali na ntina na lolenge nyonso ya mosala na biso ya kosakola, tokomona ndenge bizaleli mosusu kati na yango ezali na ntina mingi ntango tozali kobanda lisolo, kozongela moto, to mpe koyekola na moto Biblia.

Wana bozali koyekola liteya mokomoko, bókanisa malamu ndenge bokoki komonisa ezaleli yango ntango bozali kosolola na bato na esika bofandi. Bósala makasi bókolisa bolingo na bino mpo na Yehova mpe mpo na bato. Bolingo yango, oyo eleki mayele nyonso ya sikisiki oyo bokoki komonisa, ekosalisa bino bókokisa mokumba na bino ya kokómisa bato bayekoli.

Tosepelaka na libaku oyo tozali na yango ya kosala na bomoko elongo na bino. (Sef. 3:9) Tiká ete Yehova apambola bino mpenza wana bozali kokoba kolinga bato mpe kokómisa bango bayekoli!

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova