Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOLANDELA BOKOLI

LITEYA 8

Motema molai

Motema molai

Etinda: “Bolingo ezali na motema molai.” —1 Ko. 13:4.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 7:​3-5 mpe 1 Bakorinti 15:​3, 4, 7. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Na ebandeli, bandeko ya Yesu basalaki nini ntango bayokaki mateya na ye?

  2.   Nini emonisi ete Yesu akobaki kosalisa ndeko na ye Yakobo?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Tosengeli komonisa motema molai mpamba te mpo na basusu, esɛngaka mwa ntango liboso bándima koyoka nsango malamu.

Mekolá Yesu

3. Salelá mayele ndenge na ndenge. Soki moto andimi mbala moko te koyekola Biblia, kotya ye mbamba te. Soki esengeli, salelá bavideo to mpe masolo ya mikanda na biso mpo na kosalisa ye ayeba ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka mpe matomba oyo akozwa.

4. Kokokanisa bato te. Moto na moto azalaka na ndenge na ye. Soki moto moko ya libota, to moto moko oyo ozongeli na mosala ya kosakola azali kobanga koyekola to mpe kondima liteya moko ya Biblia, luká koyeba ntina. Ezali mpo akangamá makasi na liteya moko ya lingomba na ye? Bandeko ya libota na ye to mpe baninga ya kartye bazali kotya ye mbamba? Tikelá ye ntango mpo akanisa na mozindo makambo oyo oyebisaki ye mpe amona valɛrɛ ya makambo oyo Biblia elobi.

5. Bondelá mpo na moto yango. Sɛngá Yehova asalisa yo obatela makanisi malamu mpe olobaka na mayele. Sɛngá Yehova apesa yo bososoli mpo oyeba ntango nini osengeli kotika kokende kotala moto oyo azali mpenza kosepela te.—1 Ko. 9:26.