Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

LITEYA 11

Teyá na ndenge ya pɛtɛɛ

Teyá na ndenge ya pɛtɛɛ

Etinda: “Kosalela elobeli oyo ezali pɛtɛɛ . . . mpo na kokanga ntina.”—1 Ko. 14:9.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Matai 6:​25-27. Na nsima, talelá mituna oyo elandi:

  1.    Ndakisa nini Yesu asalelaki mpo na komonisa ndenge Yehova atyelaka biso likebi?

  2.   Atako Yesu ayebaki makambo mingi mpo na bandɛkɛ, likambo nini ya pɛtɛɛ abendaki na yango likebi ya bato? Mpo na nini lolenge wana ya koteya ebongaki?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Soki tozali koteya na ndenge ya pɛtɛɛ, bato bakobosana te makambo oyo tolobi mpe tokosimba mitema na bango.

Mekolá Yesu

3. Kolobaka mingi te. Na esika olobela makambo nyonso oyo oyebi mpo na lisolo oyo bozali koyekola, lobelá mingi nde makambo oyo ezali na mokanda. Nsima ya kotuna motuna, zelá moyekoli na yo apesa eyano. Soki azali na eyano te to apesi likanisi moko oyo eyokani te na mateya ya Biblia, tuná mwa mituna mosusu mpo na kosalisa ye akanisa na likambo yango. Soki kaka akangi malamu ntina ya liteya yango, leká na eteni oyo elandi.

4. Salisá moyekoli na yo amona boyokani oyo ezali kati na mateya ya sika ná makambo oyo así ayebá. Na ndakisa, liboso ya kobanda lisolo oyo elobeli lisekwa, okoki kozongela na mokuse makambo oyo ayebi mpo na oyo etali ndenge moto akómaka soki akufi.

5. Salelá bandakisa na mayele. Liboso ya kosalela ndakisa moko, omituna boye:

  1.    ‘Ndakisa yango ezali mpenza pɛtɛɛ?’

  2.   ‘Moyekoli na ngai akokanga na pɛtɛɛ nyonso ntina na yango?’

  3.   ‘Ekosalisa moyekoli na ngai akanga kaka ndakisa yango to ekotinda ye nde abosana te likanisi ya ntina?’