Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 1

Likambo oyo ekobenda likebi

Likambo oyo ekobenda likebi

Etinda: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.”—1 Ko. 13:​4, 5.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 4:​6-9. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Makambo nini Yesu amonaki epai ya mwasi yango liboso abanda kosolola na ye?

  2.   Yesu alobaki: “Pesá ngai mai ya komɛla.” Mpo na nini ezalaki lolenge malamu ya kobanda lisolo?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Mbala mingi tosololaka malamu na moto soki tobandisi lisolo moko oyo ezali kobenda likebi na ye.

Mekolá Yesu

3. Bongolá lisolo soki esengeli. Koluka kaka te kobanda lisolo na likambo oyo obongisaki. Bandá lisolo na likambo moko oyo bato bazali kolobela. Omituna boye:

  1.    ‘Bansango nini bato bazali kolobela?’

  2.   ‘Bato ya kartye na ngai, baninga na ngai ya mosala to mpe ya kelasi, bazali kolobela makambo nini?’

4. Saleláká miso. Omituna boye:

  1.    ‘Moto yango azali kosala nini? Mbala mosusu azali kokanisa nini?’

  2.   ‘Ndenge alati to ndenge azali komonana, ezala mpe ndako na ye, ezali kolobela ngai nini na oyo etali bindimeli mpe mimeseno na ye?’

  3.   ‘Oyo ezali mpenza ntango ya malamu ya kosolola na ye?’

5. Yokáká.

  1.    Kolobaka mingi te.

  2.   Salá ete moto yango abimisa makambo oyo ezali na motema na ye. Soki emonani malamu, tunáká mituna.